Bato bakotunaka nga pona nini ngai nalandaka Yesu
Bamokili bakokamwa pona nini ngai nasalelaka Yesu
Oh
Bato bakotunaka nga pona nini ngai nalandaka Yesu
Bamokili bakokamwa pona nini ngai nasalelaka Yesu
Eyano na nga
Nkolo asungi nga kati na minioko (Oh, oh Masiya)
Nkolo apesi nga kimia na motema (Kimia, oh lisusu nini)
Nkolo apesi nga bomoyi na seko (Bomoyi, oh)
Tala tina (Tala tina)
Aniokwami pe afingamaki
Mpo nga nazua bomoyi na seko
Na Golgotha makila na Yesu
Esopanaki mpo nabika
Pasi Masiya amonelaki ngai oh
Yesu Masiya na nga
Na yango nakosalela Masiya tango nionso mpo nabika
Na yango nakosalela Nkolo na nga tango nionso kino suka
Po Yesu alingi nga mingi
Ngai pe nalingi Masiya
Po Yesu amemaki pasi na nga
Ngai pe nakobila se Ye
Eyano na nga
Nkolo asungi nga kati na minioko (Oh, oh Masiya)
Nkolo apesi nga kimia na motema (Kimia, oh apesi nini oh)
Nkolo apesi nga bomoyi na seko (Bomoyi, oh)
Tala tina (Tala tina)
Ata bapekisi nga
Nakolanda kaka Masiya na nga
Ata ba camarade baboyi ngai
Nakoki te kotika Masiya
Atako nakoti boloko
Nga nakoki te oh nawangana Yesu
Na yango nakosalela Nkolo tango inso ata pasi
Na yango nakosalela se ye tango inso kino suka
Po Yesu alingi nga mingi
Ngai pe nalingi Masiya
Po Yesu amemaki pasi na ngai
Ngai pe nakobila se Ye
Eyano na nga
Nkolo asungi nga kati na minioko (Oh, oh Masiya)
Nkolo apesi nga kimia na motema (Kimia, oh lisusu nini)
Nkolo apesi nga bomoyi na seko (Bomoyi, oh)
Tala tina (Botala tina)
Bamokili bazali kokamwa
Bolingo na nga na Masiya
Basusu bazali komituna
Tina nini nakangama na Yesu
Babosani ete azali nzela
Oyo ekomemaka na mboka na lola
Na yango nakoyembela Ye Nkolo tango inso na bomoyi bwa nga
Na maboko na Ye kobanga esili nazui kimia, nazui kimia pe lobiko
Po Yesu alingi nga mingi
Ngai pe nalingi Masiya
Po Yesu amemaki pasi na nga
Ngai pe nalingi se Ye
Eyano na nga
Nkolo asungi nga kati na minioko (Oh, oh Masiya)
Nkolo apesi nga kimia na motema (Kimia, oh lisusu nini)
Nkolo apesi nga bomoyi na seko (Bomoyi, oh)
Tala tina (Tala tina)