Bato bakotunaka nga pona nini ngai nalandaka Yesu Bamokili bakokamwa pona nini ngai nasalelaka Yesu Oh Bato bakotunaka nga pona nini ngai nalandaka Yesu Bamokili bakokamwa pona nini ngai nasalelaka Yesu Eyano na nga Nkolo asungi nga kati na minioko (Oh, oh Masiya) Nkolo apesi nga kimia na motema (Kimia, oh lisusu nini) Nkolo apesi nga bomoyi na seko (Bomoyi, oh) Tala tina (Tala tina) Aniokwami pe afingamaki Mpo nga nazua bomoyi na seko Na Golgotha makila na Yesu Esopanaki mpo nabika Pasi Masiya amonelaki ngai oh Yesu Masiya na nga Na yango nakosalela Masiya tango nionso mpo nabika Na yango nakosalela Nkolo na nga tango nionso kino suka Po Yesu alingi nga mingi Ngai pe nalingi Masiya Po Yesu amemaki pasi na nga Ngai pe nakobila se Ye Eyano na nga Nkolo asungi nga kati na minioko (Oh, oh Masiya) Nkolo apesi nga kimia na motema (Kimia, oh apesi nini oh) Nkolo apesi nga bomoyi na seko (Bomoyi, oh) Tala tina (Tala tina) Ata bapekisi nga Nakolanda kaka Masiya na nga Ata ba camarade baboyi ngai Nakoki te kotika Masiya Atako nakoti boloko Nga nakoki te oh nawangana Yesu Na yango nakosalela Nkolo tango inso ata pasi Na yango nakosalela se ye tango inso kino suka Po Yesu alingi nga mingi Ngai pe nalingi Masiya Po Yesu amemaki pasi na ngai Ngai pe nakobila se Ye Eyano na nga Nkolo asungi nga kati na minioko (Oh, oh Masiya) Nkolo apesi nga kimia na motema (Kimia, oh lisusu nini) Nkolo apesi nga bomoyi na seko (Bomoyi, oh) Tala tina (Botala tina) Bamokili bazali kokamwa Bolingo na nga na Masiya Basusu bazali komituna Tina nini nakangama na Yesu Babosani ete azali nzela Oyo ekomemaka na mboka na lola Na yango nakoyembela Ye Nkolo tango inso na bomoyi bwa nga Na maboko na Ye kobanga esili nazui kimia, nazui kimia pe lobiko Po Yesu alingi nga mingi Ngai pe nalingi Masiya Po Yesu amemaki pasi na nga Ngai pe nalingi se Ye Eyano na nga Nkolo asungi nga kati na minioko (Oh, oh Masiya) Nkolo apesi nga kimia na motema (Kimia, oh lisusu nini) Nkolo apesi nga bomoyi na seko (Bomoyi, oh) Tala tina (Tala tina)