Cifra Club

Bokeba

Charles Mombaya

We don't have the chords for this song yet.

Bino basambeli na bikeko
Boyoka nanu ngai nayebisa bino
Bino bandoki pe banganga
Boyoka nanu ngai nayebisa bino
Bino batshioli na Masiya
Boyoka nanu ngai nayebisa bino

Lifuti ya masumu ezali kufa, ezali kufa
Kasi Nzambe akopesaka bomoyi ya pamba, ya ofele bandeko
Likabo na ye na bomoyi ezali Yesu, ezali Yesu

Bokeba
Bokeba (Baninga)
Bokeba (Oh, bandeko)
Bokeba

Bino batshioli na bandimi
Boyoka nanu ngai nayebisa bino
Bino miyibi pe babomi
Boyoka nanu ngai nayebisa bino
Bino bayini pe bandoki
Boyoka nanu ngai nayebisa bino

Bomikosa te bandeko Nzambe akokosamaka te
Moto akolonaka madesu akobukaka se madesu
Mosali na masumu akozua se libebi

Bokeba (Baninga)
Bokeba (Baninga)
Bokeba (Oh, bandeko)
Bokeba

Bino balangwi na masanga
Boyoka nanu ngai nayebisa bino
Bino bandoki pe banganga
Boyoka nanu ngai nayebisa bino
Bino bateyi ya lokuta
Boyoka nanu ngai nayebisa bino

Bokonzi na Nzambe ezali peto, ezali peto
Moto nionso akowumelaka na masumu akozanga
Bokonzi na lola ekozala se pona babulami

Bokeba (Baninga)
Bokeba (Baninga)
Bokeba (Oh, bandeko)
Bokeba

Lifuti ya masumu ezali kufa, ezali kufa
Kasi Nzambe akopesaka bomoyi ya pamba, ya ofele bandeko
Likabo na ye na bomoyi ezali Yesu, ezali Yesu

Bokeba (Baninga)
Bokeba (Baninga)
Bokeba (Oh, bandeko)
Bokeba

Other videos of this song
    0 views

    Chord tuning

    Online tuner

    Ops (: Content available only in Portuguese.
    OK