Bino basambeli na bikeko Boyoka nanu ngai nayebisa bino Bino bandoki pe banganga Boyoka nanu ngai nayebisa bino Bino batshioli na Masiya Boyoka nanu ngai nayebisa bino Lifuti ya masumu ezali kufa, ezali kufa Kasi Nzambe akopesaka bomoyi ya pamba, ya ofele bandeko Likabo na ye na bomoyi ezali Yesu, ezali Yesu Bokeba Bokeba (Baninga) Bokeba (Oh, bandeko) Bokeba Bino batshioli na bandimi Boyoka nanu ngai nayebisa bino Bino miyibi pe babomi Boyoka nanu ngai nayebisa bino Bino bayini pe bandoki Boyoka nanu ngai nayebisa bino Bomikosa te bandeko Nzambe akokosamaka te Moto akolonaka madesu akobukaka se madesu Mosali na masumu akozua se libebi Bokeba (Baninga) Bokeba (Baninga) Bokeba (Oh, bandeko) Bokeba Bino balangwi na masanga Boyoka nanu ngai nayebisa bino Bino bandoki pe banganga Boyoka nanu ngai nayebisa bino Bino bateyi ya lokuta Boyoka nanu ngai nayebisa bino Bokonzi na Nzambe ezali peto, ezali peto Moto nionso akowumelaka na masumu akozanga Bokonzi na lola ekozala se pona babulami Bokeba (Baninga) Bokeba (Baninga) Bokeba (Oh, bandeko) Bokeba Lifuti ya masumu ezali kufa, ezali kufa Kasi Nzambe akopesaka bomoyi ya pamba, ya ofele bandeko Likabo na ye na bomoyi ezali Yesu, ezali Yesu Bokeba (Baninga) Bokeba (Baninga) Bokeba (Oh, bandeko) Bokeba