Mon Dieu je te connais
Toi aussi tu me connais
Mon Dieu je te connais comme mon Père
Toi aussi tu me connais comme ta fille bien-aimée
Nzambe nga nayebi Yo
Yo pe oyebi ngai
Nayebi Yo lokola Papa
Oyebi nga nazali nde mwana na Yo
Nazali mpate na Yo
Atako mongongo ekobelela mosika
Nga nakoyoka
Ngwende na yo ya Bokonzi na likolo
Ngai ko mabele ya pamba lofundu ya nini nasala
Nakelami lisusu na Yesu
Po natalisa mbuma ya misala malamu eh
Nzambe, ngai oyo naye nde kokumisa Yo
Ngai oyo nazali nde nzete ya mbila
Oyo etondami likolo ya libanga
Libanga yango ya misamo sambo
Oh libanga oyo emelisaka bana na Israel
Na esobe ebomoka Goliath
Yango nde Yesu
Nazali ekelamu ya lobi oyo oyebaka
Yo nde mutu olingaki nga na Yo Nzambe oh
Naya na mokili oyo ezali nde toile d’arraignée
Mokili oyo etonda na insecurité oh
Nionso wana po nayeba
Monene na Yo koleka t’ebale
Yambo na ngai nayeba Yo ndenge nayebi Yo lelo
Bomoyi na ngai mabele na tango
Ekomaki na souffle ya pamba
Lokola lipata bakomema na mopepe
Molimo’a Cayina
Merci Papa, kobanda bomwana
Bomoyi na ngai ezalaki na hiver
Nazangaki Yo, Yo nde manteau na nga Papa
Oyaki nde koluka ngai Papa
Mama azalaki kosunga ngai na pasi
Nzoka azalaki na ndelo
Nazui yo lelo yo nde manteau na ngai Papa
Ngai nazui yo lelo yo nde libiki na ngai Papa
Merci Papa, kobanda bomwana
Bomoyi na ngai ezalaki na hiver
Nazangaki Yo, Yo nde manteau na nga Papa
Oyaki nde koluka ngai Papa
Mama azalaki kosunga ngai na pasi
Nzoka azalaki na ndelo
Ngai nazui yo lelo yo nde manteau na ngai Papa
Ngai nazui yo lelo yo nde libiki na ngai Papa
Ngai nayebi Ye malamu eh
Ye pe ayebi nga malamu eh
Seko liwa se po na Yesu eh
Seko liwa se po na Papa ah
Ye pe ayebi ngai malamu eh
Ngai pe nayebi Ye malamu eh
Seko seko nga na Papa eh ih
Ngai nayebi Ye malamu eh
Ye pe ayebi nga malamu eh
Seko liwa se po na Papa eh
Ngai pe nayebi Ye malamu eh
Ye pe ayebi ngai malamu eh
Seko liwa se po na Papa eh
Seko liwa se po na Yesu eh ih