Topusani liboso nayo
Tomemi mbeka ya masanjoli
Yamba loyembo ya babulami
Tobonjeli nzambe n’a bomoyi

Kiti nayo eza ya seko
Bokonzi nayo ya libela
Ozali nzambe tozoyembela
Kombo nayo Emmanuel

Togumbameli yo Mobikisi
Mokeli ya likolo se
Moboko esimbi kondima
Ya basantu eza yo Yesu

Bipayi yovandi yamba
Loyembo ya mitema
Maboko totomboli Likolo
Hosanna nkembo nayo

N’a ekulusu makila etangi
Mokonzi Yesu namipesi mbeka
Elamba ya pembe epasuki
Tozwi bosomi liboso n’a yawhe

(N’a yango) Sango malamu, ekomeli biso
Tongo tongo masiya asekwi
Aza lisusu n’a lilita te
Alongi liwa aza n’a bomoyi

Lilita etikali polele
Masiya nde Yesu asekwi
Oyo nionso ya ngai ekufaki
Esekwi elongo naye

Bipayi yovandi yamba
Loyembo ya mitema
Maboko totomboli Likolo
Hosanna nkembo nayo

Mobikisi ya mabota
Ya mokili to telimi
To sopi mitema
Na biso liboso nayo

Togumbameli yo Mobikisi
Mokeli ya likolo se
Moboko esimbi kondima
Ya basantu eza yo Yesu

Lilita etikali polele
Masiya nde Yesu asekwi
Oyo nionso ya ngai ekufaki
Esekwi elongo naye

Bipayi yovandi yamba
Loyembo ya mitema
Maboko totomboli Likolo
Hosanna nkembo nayo
    Page 1 / 1

    Lyrics and title
    Chords and artist

    reset settings
    OK