Nani aza na thermomêtre ya koyeba température ya molimo moto Nani aza na balance ya koyeba kilo ya vie ya moto Nani aza na mètre oyo eko lakisa molayi ya molimo ya moto yeye Nani akoki kotimola libulu molayi mpo ayeba mozindo ya molimo moto Bobele Yesu Wapi université oyo eza na mateya ya kokamba vie ya molimo ya moto Wapi parlement oyo ekoki ko siéger pona ko voter ba lois ya molimo ya moto Wapi gouvernement oyo eza na ba ministres ya kokamba hum vie ya molimo moto Wapi mboka oyo eza na roi to regner ya kokamba vie hum ya molimo ya moto Bobele Yesu Nani aza na site internet ya ko permettre biso To naviguer pona toyeba vie spirituelle ya moto Mosusu okomona moto likolo, likolo lokola moto ya masumu Ye wana Nzambe aza kolinga Mosusu okomana ye akotambola na logome elamba epasuka Ndeko keba minister monene Tuna mikonzi minene ba fanda na kiti ya bokonzi Ba wuta wapi? Okomona babeteli yo porte basengi yo mayi ya komela Ndeko koboya te Mosusu babengana ba ange na porte na bango Yesu soki afungoli yo miso mpo omona vie ya moto okoki kofukamela ye Ah ngai Bible eloba éthiopien a changaka peau na ye te Leopard mpe a changaka ba taches na ye te Lelo moninga pamba oyebi lobi na ngai te Yesu azo mona ngai moto monene Ah ngai Yo moninga malade Yesu azo mona bien Yo moninga mobola Yesu azo mona ngai riche Likolo ya ba sentiments na yo obengi ngai moto na masumu Ah yeye yeye ndeko eh Ko juger ngai te Ko juger mpe ngai te Oyebi lobi na ngai Oyebi pe vie na ngai te Nani akoki kotombola libanga abamba muasi oyo akueyi na ekobo Likambo yango nini lelo basali ya Nzambe Nzambe moto atia bango na eklezia na ye Mikumba oyo bamemaka soki bapesi ndeko okokoka te Babengaka bango ba fou na kati ya ecclesia, ba blessés de guerre Ba grand coopérant na makambo ya eklezia, ba koko ya suka mboka ma Bilamba epatuama na kati ya eklezia Marie Magdala asopi malasi na ye ya motuya na makolo ya Yesu Neti babengi ye ndumba Nzoka ye nde amonaki lisekua ya Yesu liboso Nakotambola moto likolo na kobeta tolo Ndeko na ngai oh ne jugez point Ne jugez point Ndeko na ngai ne jugez point mpo ba juger yo te Ne jugez point Tika Nzambe a juger basali na Ye Tika Nzambe a juger bato na Ye Tika Nzambe a juger bana na Ye