Mikanda Mikanda mitano ya Moïse atikelaki biso eh Pona bana Israël bakokana likambo na Nzambe oh Pona kokoma na mboka na elaka Ah mikanda Mikanda mitano ya Moïse atikelaki biso eh Pona bana Israël bakokana likambo na Nzambe oh Pona kokoma na mboka na elaka Ephésiens 4 elobi na ngai Yesu pe atikelaki biso lotombo mitano eh Na nzela na koyoka tokoma elili na Yesu babengi photo oh Tango kelelo ekobeta eh ba bibles tokangi Bitumba pe na vie na biso esili kosila ah Ephésiens 4 elobi na ngai Yesu pe atikelaki biso lotombo mitano eh Na nzela na koyoka tokoma elili na Yesu babengi photo oh Tango kelelo ekobeta eh ba bibles tokangi Bitumba pe na vie na biso esili kosila ah Ah, bongo mabanga mitano ya David eh Oyo azuaki kati na libulu na mayi oh Pona kolonga monguna na etumba monene Yango pe biso na koyoka lotombo mitano eh Nde biso tokolonga na etumba ya kondima Yawe Mabanga mitano ya David eh Oyo azuaki kati na libulu na mayi oh Pona kolonga monguna na etumba monene Yango pe biso na koyoka lotombo mitano eh Nde biso tokolonga na etumba ya kondima Yawe (Hmm Papa batela) Tokomi na biso na tango ya triage baninga (Hmm Papa sunga nga) Oyo esengeli eclesia na Yo emata na mipepe oh (Hmm Papa batela) Tokoki kokende te soki tokomi lokola Yo te (Hmm Papa sunga nga) Yango otie basali na Yo pona biso tokoma lokola Yo (Hmm Papa batela) Basali na Yo cinq ministères nde misapi mitano (Hmm Papa sunga nga) Yango tika ngai nalia na misapi mitano po natonda oh (Hmm Papa batela) Yawe sunga basali na Yo pe bazali baganga na Yo (Hmm Papa sunga nga) Bango balati elamba ya pembe kati n'eclesia na Yo oh (Hmm Papa batela) Sunga, sunga batela Yaya (Hmm Papa sunga nga) Batela, batela, batela ah