Eh Yawheh, eh Yawheh kumama Eh Yawheh oh, eh Yawheh kumama na Yo Eh Yawheh, eh Yawheh na ngai oh kumama eh Eh Yawheh, papa na bana eh kumama Natali na bibilia ngai na moni Anna eh Oyo azalaki ekomba Masiya Opesi ye Samuel eh na nguya na Yo Yo nde nkolo ya bana eh, opesaka mabota eh Pesa na ba oyo bazangi mpo bakumisa Yo eh Les 4 êtres vivants bavandi na kiti na Yo Nzambe Bazali kotatola y'oza Mosantu, Yawheh kumama na Yo Eh Yesu, makambo oyo osalelaka biso Mitema oyo otutisaka biso Nzambe Vraiment natali na likolo, natali na se Moko te akokani na yo Papa Na liziba ya Bethesda obikisa malade Papa nani akokani na Yo?, Y'oleki nguya eh Yo mobikisi ya babeli eh, babengi Jehovah Rapha eh Loboko na yo mokuse te olobi nini Papa eh Natangi na bible mwasi okotanga makila Asimbaki elamba na Yesu azuaki lobiko kumama Eh Yahweh, eh Yahweh, eh Yahweh, Yahweh Papa olobi nini eh? Nakima wapi? Nabatama wapi Schilo? Nakomi lokola Jonas na libumu ya mbisi destination inconnu Bilamba ya Congo ekomi biteni biteni eh Misuni ya ba congolais ekomi bipayi na bipayi olobi nini? Oh moningami kati na Nkolo Soki omoni pasi ebelemi na porte na yo Kamata trompette n'o betela Nkolo Yango nde libondeli ako yoka yo Kumama eh Yesu oyo Kumama Papa eh, kumama Papa eh, kumama Papa eh Kumama Nakoma pe koseka ngai oyo Basombelaki nga lopango na lilita Nakufa lelo lobi mosika Soki makambo ekomeli yo ndeko Fukama buaka misolo likolo Ganga au secours eh Yesu oyo Ngai nalingi na yebisa yo nde makambo Nayebi te ndenge nini ya kobanda Yo moko kamata ba phrases na ngai oh Classer yango ndenge olingi eh Oza na suki ya pembe, babengi sagesse eh Kumama eh Yesu oyo (eh papa) Olati robe ya pembe Nzambe, babengi sainteté Yesu eh Kumama eh Yesu oyo Olati ceinture na loketo, babengi verité Nzamb'oyo Tika nga pe na lobaka kaka verité Eh na makolo na yo mapapa eh, babengi saine evangile Tika nga na teya liloba na yo Mongongo n'o eleki kutu ya bakake oh, babengi yango autorité Kumama eh Yesu oyo Yo nde mobikisi ya ba malades ba lembana, Nkolo na bana eh Kumama eh Yesu oyo Papa ngai nalingi na yebisa yo nde makambo Nayebi te ndenge nini ya kobanda (kumama Papa nazokoka koloba te, Seigneur) Miso na yo ebimisaka ba moto, babengi yango lumière eh Yo nde motambwisi ya bana eh Na bengaka yo Monsieur raison eh, ozalaka kaka na raison (monsieur raison na ngai oh) Kumama eh Yesu oyo Ngai natali likolo natali mabele ba niama na zamba ba mbisi na mayi oh Nabangi monene na Yo Nzambe esika mayele na nga esuki oh, ya yo ebandi eh Kumama eh Yesu oyo Omoni libondeli na nga ya chambre, lelo nayembi na loyembo Sekele na nga ebimi eh Kumama eh Yesu oyo Jesus Jesus Jesus Ah apa ya bana, papa libota ebele (papa libota ebele) Papa libota monene eh yesu oyo (papa libota monene) Nazanga papa eh, na zanga maman eh Yo nde okoma nionso na ngai oh Soki malade ememi yo na suka, kamata trompette na yo eh Trompette yango nde liloba na nzambe Lobela nga na litoyi ya droite, oyo muasi na mobali na ye Yo nde Nkolo ya libala eh Soki mosala ezangi yo ndeko, soki kimia ezangi yo ndeko Kamata trompette betela Nzambe, yango nde libondeli eh Soki kobota eza kotungisa yo, soki pe kimia ezangi eh Kamata trompette betela Nzambe, ye nde nzete ya mbila eh Papa eh Yawheh, Papa eh Yawheh (Yesu oza wapi? Yo nde kimia ya mitema na biso) (Yo nde mayi na biso ya komela) Mayi ya ko mela ya vie na nga eh, nazuaka epayi na Yo eh Yesu Yo nde mayi na nga oh, yo nde kimia na nga Papa eh Yawheh, Papa omoni ba mpota na mitema Sembola loboko, sembola loboko banguna bakamua Papa soki bato batuni ngai balobi na loba kaka phrase moko Ezala mokuse mpe ezala efficace, nako yebisa Yo sala na ngai oyo nionso yo olingi mpo Yo nde Nkolo na ntango Mema ngai esika yo olingi mpo Yo oyebi motema na ngai koleka ngai moko