Yesu oyo Ngonga ya réveil na ngai ekobeta mokolo nini? Ebongo livre ya vie na ngai ekomi na page nini Papa? Bimbo na ngai ekotoboka mokolo nini Yesu eh? Yo Nzambe oyo, ima Yo Nzambe oyo Ima Yo Nzambe oyo eh, ima Yo Nzambe oyo Ima Yo Nzambe oyo eh, Papa na ngai eh Yo Nzambe oyo (Papa ya bana eh) Yo Nzambe oyo (okosaka eh ima oh) Yo Nzambe oyo (olobaka solo Papa) Yo Nzambe oyo Yo Nzambe oyo Ima Yo Nzambe oyo, ima Yo Nzambe oyo Papa Y'olobaki okosala eh, Papa Y'olobaki okosala eh Papa natamboli pe mingi oh, Papa bafingi ngai mingi oh Papa motema ekomi kobanga eh, Papa nakomi kolenga eh Papa Y'olobaki okosala eh kati na bomoyi na ngai eh Papa ba temoins bazalaki eh tango Y'olakaki ngai oyo eh Papa Y'obaki okosala eh, Papa sembola loboko eh Yo Nzambe oyo (Nzambe oyo) Yo Nzambe oyo (papa Yo Nzambe oyo eh) Yo Nzambe oyo (ima Yo Nzambe oyo eh) Yo Nzambe oyo (Papa sembola loboko) Yo Nzambe oyo Ima Yo Nzambe oyo, ima Yo Nzambe na ngai oh Papa nafandaki na ngai oh, Papa nayebaki Yo te oh Papa Y'oluki nga Marie eh, Papa Y'olobi nakosala eh Ngai nakosala na elanga na Yo eh, Papa natelemi nabandi kosala Papa makambo ekokisama, Papa nazeli pe mingi oh Papa naluki na losambo eh, Yesu Y'olobi na ngai nini eh Yo Nzambe oyo (Papa eh) Yo Nzambe oyo (Papa bana eh Yo Nzambe oyo eh) Yo Nzambe oyo (elikia na ngai Papa) Yo Nzambe oyo (mosungi ya kokamwa eh) Yo Nzambe oyo Ima Yo Nzambe oyo, Papa tala bato ebele oh Papa baye koluka Yo eh, Papa baye kotala ngai te oh Papa basusu bazangi kobota, Papa basusu baza na malade Papa basusu bazangi misala, Papa basusu bazangi kimia eh Papa baye koluka Yo eh, basusu bakangami na milimo mabe Papa Yo sembola loboko ima, ngai nagangaki nalobaki eh Yo nde oh Nkolo ya libiki ima, Yo nde oh Nkolo ya misala ima Papa nakomi kobanga eh, Papa nakomi kolenga eh Yo Nzambe oyo (Papa sembola loboko ima eh) Yo Nzambe oyo (Papa sembola loboko ima eh, banguna bakamwa ima eh) Yo Nzambe oyo (banguna bamona ima oh, Papa sembola loboko ima eh) Yo Nzambe oyo (Papa sembola loboko ima eh, Papa basusu bazangi misala) Yo Nzambe oyo (Papa basusu bazangi kobota, Papa basusu bazangi kimia eh) Yo Nzambe oyo (yo nde Nkolo ya kimia ima eh, Yo nde Nkolo ya kimia) Papa zua nga mosali na Yo, zua ngai mwana te oh Nasali Yo mabe mingi oh, pasi elekeli ngai oh Nasengaki bambongo na ngai oh, bomengo na ngai nionso eh Nakendaki mosika na Yo, nasilisi yango na ambiance oh Nakomi kolia na bangulu oh, kolala kaka na bangulu oh Natali boye ngai nalobi, nazonga ndako ya baboti Natali boye ngai nalobi, nazonga ndako ya baboti na nga Ima oh naye na Yesu eh (po ete nabika oh) Ngai oyo nazongi ndako eh (po ete nabika oh) Ngai oyo nazongeli Papa (po ete nabika oh) Yawe zua ngai ata mosali nasokolaka Yo makolo Nzambe (po ete nabika oh) Oh zua ngai ata mosali nakombolaka eklesia Nzambe (po ete nabika oh) Zua ngai ata mosali napanguisaka ba bancs na eklesia eh (po ete nabika oh) Zua ngai ata mosali nasalaka oyo olingi nasala eh (po ete nabika oh) Ngai oyo naye na Yesu eh (po ete nabika oh) Ngai oyo nazongeli Papa (po ete nabika oh) Papa esika nawuti namoni pasi mingi Papa na ngai eh (po ete nabika oh) Ngai oyo nazongi ndako ya baboti (po ete nabika oh) Ngai oyo naye na Yesu eh (po ete nabika oh) Papa na ngai atinda nga, mema nga esika olingi nakotosa eh (po ete nabika oh) Ngai oyo nazongi ndako eh (po ete nabika oh) Yesu oyo sala na ngai olingi (po ete nabika oh) Zua ngai ata mosali nasalaka mosala na eklesia eh (po ete nabika oh) Zua ngai ata mosali natambolaka partout, nateya liloba eh (po ete nabika oh) Ngai eh naye na Yesu eh po ete nabika oh (po ete nabika oh) Ngai oyo nazongeli Papa po ete nabika oh (po ete nabika oh) Hmm nazongi ndako ya baboti (po ete nabika oh) Ima eh naye na Yesu eh (po ete nabika oh) Ima eh nazongi ndako eh (po ete nabika oh) Bino bomoni makambo asalaka ye eh Bomoni makambo asalaka Nzambe oyo eh Abikasaka babeli eh Apesaka pe mabala Nzambe oyo Atombolaka bakweyi eh Tokozongisela nini, tokobina, tokobina mame Tokobina mame kobina mame Abina bina eh