Une minute, une pour la route Coco claudia sassou, yaya na denis-christel sassou nguesso le pétrolier Ma vivi emeraude Kitoko ezali elamba oyo nzambe alatisaka moto nyonso te Kasi ezali kitalatala moto nyonso akoki kotala Kitoko ezali elamba oyo nzambe alatisaka moto nyonso te Kasi ezali kitalatala moto nyonso akoki kotala Napekisi bino botala claudia te Kasi nga nasengi esuka se na regard Ya ko pesa ye ba rendez-vous wana bokoboma nga Coco claudia aza ya ngaï-mei Maman nani ango alobaka kitoko eza mabele Est-ce qu'eza te po amona te claudia sassou (Aya bangu, aya kotala koko claudia sassou) Moko ya couleur oyo arc-en-ciel alukaka Po azuwa pe nguya ya kokanga ekanga moyi kobima Ndenge akanga mvula konoko (eza nde claudia) Ye aza na etamboli ya balon ezana mopepe Nzoto n'e sembe-sembe, moto-moto pe moselu Pays-bas on dirait cowboy alati ba revolvers Soki apesi nga vue de dos wana nga na bavaka (elle est sucrée claudia) Esika nzambe azuwa mabele ya kosala ye Eza esika oyo apekisa ba anjelu banyata Ba anjelu ba ngolomaka esika'ango na mabolongo Ye moko nzambe atambolaka esika'ango makolo ngulu Koko claudia sassou Yo oza réponse exacte ya beauté Soki bolingo nayo ezalaki prison, nakoboya nanga liberte Ata kolinga yo ezali ngambo Nga nandimi ngambo Lokola adam andima ngambo po alingaki Eva Sikoyo jolibitationismementationnellementationnellement ebandi Kokende te claudia po oza moko ya mikuwa ya mipanzi nangayi P'oza elengi kofiba koleka mokuwa ya makoso Komona yo eza lokola namoni paradis na miroir Ata nzambe alobi azongisa nga bébé na maboko ya maman (te, nakoboya) Kokende te claudia po oza moko ya mikuwa ya mipanzi nangayi P'oza elengi kofiba koleka mokuwa ya makoso Komona yo eza lokola nadiongoli paradis na miroir Ata nzambe alobi azongisa nga bébé na maboko ya maman Te, nakoboya Po kuna papa na maman balalisaka nga (na berceau) Tango age epusani babimisaki nga (na chambre) Kasi nga na yo claudia mbeto moko, soki pe malili (Toko finika couette moko claudia sassou) Ah mokuwa na nga mosuni nanga mon cœur Mon bras, ma jambe (eza yo claudia) Chérie claudia na nga Chérie façon yo osalaka oyo ya yo synopsis Soki ngonga ya kokata sentiment na nga ekoki Claudia pardon nakoseng'o bakisa (une minute) Ndenge bapesaka condamné à mort (une minute) Avant ya ko exécuter ye Chérie pardon nakoseng'o juste kaka (une minute) Ndenge moto azangi unités asengaka (une minute) Ata eza moko kasi na bolingo eza ebele Nakoki ko lobel'o ata je t'aime na (une minute) Nakoki kopesa yo ata pe bipwepwe zuana (une minute) Nakoki kosala'o ata bisala sala na (une minute) Po après naloba bébé je veux encore Une pour la route avant qu'on ne se sépare Papa denguess aza (ya ngouli) Ngouli aza (ya papa denguess) Kasi claudia yo oza ya nani Kitoko ya basusu suka (quelque part) Kasi ya maman n'alisson na laurette (Na rez-de-chassée, koko claudia sassou) Ah nga naleli (une minute) Benga nga cherie (une minute) Nafongoli tshombo (une minute) Nazo zela appel'a claudia (une minute) Patsho panda honorable, (une minute) Honorable serge kayembe (une minute) Na sengi ya pamba (une minute) Yoka vieux na nga rigo star na lindanda