Bakongo na Kin basala bamambu na ba quartiers Mivé John na Ndjili pe na Ngiri-Ngiri, Zabara Bakombo lel'oyo etikala se na histoire eh Babuka na banque batia mouvement na Kinshasa Basala bampungu babunga na kati ya boloko Angwalima Wallace kombo etikala se na histoire Basala bakisi bazua bambonga moyeke Batonga bandako basomba bampeko na Kinshasa Mingi bakoma kotambola na mosuni ya bata Balela ba ambiance basala mabala na banganda Congo bar lel'oyo ekoma esika ya losambo Ba vendredi ambiance ekoma n'ango prière eh Bakenda na lunda basusu bateka misapi Batondi na mbongo bakoma na basi ebele Kasi kimia ezangi bango kati ya mabala eh Balongwe na Kin bakei kofanda na mikili Bakomi minene bakomi kotuta monzele Kasi kimia na mitema ezangi bango eh Salomon alobaki na se oyo ya bato Zua na yo mbongo tonda na yo ata na bomengo Nionso tokomona eza n'ango kaka vanité Bomoyi ya solo eza vraiment kati na Yesu eh Tika napesa elikia na Yesu Masiya Alobaki akopesa na oyo akondima Ye Kimia oyo bakoki kosomba na mosolo te Nazui mokano lel'oyo nakobila Ye eh Vanité, vanité, nionso se vanité Bomengo ya solo eza na Masiya eh Vanité, vanité, nionso se vanité Bomengo ya solo eza na Masiya eh Okoki kotonda na yo na bomengo na se Kimia oyo Masiya akopesa okosomba te Vanité, vanité, nionso se vanité Bomengo ya solo eza na Masiya eh Basomba bandako na bampeko misolo ebele Kasi mitema na bango tango nionso eza troublés Vanité, vanité, nionso se vanité Bomengo ya solo eza na Masiya eh Yaka na Yesu moninga y'okozua na Ye Kimia oyo bakoki kosomba na mosolo te Vanité, vanité, nionso se vanité Bomengo ya solo eza na Masiya eh Salomon alobaki vraiment na mokili ya se Nionso tokomona eza n'ango kaka vanité Vanité, vanité, nionso se vanité Bomengo ya solo eza na Masiya eh Vanité, vanité, nionso se vanité Bomengo ya solo eza na Masiya eh