Naye lelo, naye lelo
Naye lelo epayi ya Nkolo Yesu Klisto Masiya eh
Naye lisusu pona kopesa matondi na manso asali kati na bomoyi na nga
Yesu eh

Bamokili vraiment balingaki te komona nga na délivrance baninga
Bamonaki mabe pe pasi ndenge nga natiki coutume eh
Basepelaki te que nga nalongwa na kindoki ya libota eh
Basali ba réunions baluki ndenge nini babebisa ngai eh
Kasi bayebaki te makila na Yesu yango nde ezali nguba na nga

Bamokili vraiment balingaki te que nga nalongwa na kati ya célibat
Basepelaki komona nga na vanda na kati ya chômage
Mission na bango ezalaki ete bamona nga nabota te
Nzoka bazalaki komikosa eh, nazali na Nzambe na nguya Nzambe ya bikamua eh

Botikela nga nzela coutume, nga nalingi Yesu eh
(Tikela nga nzela coutume, nga nalingi Yesu eh)
Banganga kisi bazui défaite, Yesu aza miracle
(Tikela nga nzela coutume, nga nalingi Yesu eh)
Ba magiciens bazui kibota, Yesu aza finale
(Tikela nga nzela coutume, nga nalingi Yesu eh)

Ya ngai na Masiya oh, kino na lola oh (Ah, nandimi)
Ata balobi eh, natika te oh (Ah, nandimi)
Ata bakofinga oh, ngai se na Masiya oh (Ah, nandimi)

Tikela nga nzela ya ambiance, ambiance eza na Yesu eh
(Tikela nga nzela coutume, nga nalingi Yesu eh)
Kindoki ya libota ezui échec, Yesu aza finale
(Tikela nga nzela coutume, nga nalingi Yesu eh)
Ba marabouts bazui défaite, Yesu aza elonga oh
(Tikela nga nzela coutume, nga nalingi Yesu eh)

Ya ngai na Masiya oh, kino na lola oh (Ah, nandimi)
Ata balobi eh, natika te oh (Ah, nandimi)
Ata bakofinga oh, ngai se na Masiya oh (Ah, nandimi)

Ba geôliers bakomi kosambua, Yesu aza miracle
(Tikela nga nzela coutume, nga nalingi Yesu eh)
Bandoki ya famille bazui échec, Yesu aza elonga
(Tikela nga nzela coutume, nga nalingi Yesu eh)
Tikela nga nzela bonkoko, Yesu aza lobiko eh
(Tikela nga nzela coutume, nga nalingi Yesu eh)

Ya ngai na Masiya oh, kino na lola oh (Ah, nandimi)
Ata balobi eh, natika te oh (Ah, nandimi)
Ata bakofinga oh, ngai se na Masiya oh (Ah, nandimi)

Ya ngai na Masiya oh, kino na lola oh (Ah, nandimi)
Ata balobi eh, natika te oh (Ah, nandimi)
Ata bakofinga oh, ngai se na Masiya oh (Ah, nandimi)
Ya ngai na Masiya oh, kino na lola eh (Ah, nandimi)
Ata balobi eh, natika te oh (Ah, nandimi)
Ata bakofinga oh, ngai se na Masiya oh (Ah, nandimi)
Ya ngai na Masiya oh, kino na lola oh (Ah, nandimi)
Ata balobi eh, natika te oh (Ah, nandimi)
Ata bakofinga oh, ngai se na Masiya oh (Ah, nandimi)
Ya ngai na Masiya oh, kino na lola oh (Ah, nandimi)
Ata balobi eh, natika te oh (Ah, nandimi)
    Page 1 / 1

    Lyrics and title
    Chords and artist

    reset settings
    OK