Bato bakotunaka nga pona nini ngai nalandaka Yesu Bamokili bakokamwa pona nini ngai nasalelaka Yesu Oh Bato bakotunaka nga pona nini ngai nalandaka Yesu Bamokili bakokamwa pona nini ngai nasalelaka Yesu Eyano na nga Nkolo asungi nga kati na minioko Nkolo apesi nga kimia na motema Nkolo apesi nga bomoyi na seko Tala tina Aniokwami pe afingamaki Mpo nga nazua bomoyi na seko Na Golgotha makila na Yesu Esopanaki mpo nabika Oh pasi ye amonelaki nga Yesu Masiya na nga Na yango nakosalela Masiya tango nionso ata pasi Na yango nakosalela Nkolo na nga tango nionso kino suka Po Yesu alingi nga mingi Ngai pe nalingi Masiya Po Yesu amemaki pasi na nga Ngai pe nakobila se Ye Eyano na nga Nkolo asungi nga kati na minioko (Oh, oh Masiya) Nkolo apesi nga kimia na motema (Kimia, oh apesi nini oh) Nkolo apesi nga bomoyi na seko (Bomoyi, oh) Tala tina (Tala tina) Ata bato bapekisi nga Nakolanda kaka Masiya Ata ba camarades baboyi ngai Nakoki te kotika Masiya Atako nakoti boloko Nakoki te nga nawangana Yesu Na yango nakosalela ye Nkolo kino suka ata pasi Na yango nakobila ye Masiya tango nionso kino azonga Po Yesu alingi nga mingi Ngai pe nalingi Masiya Po Yesu amemaki pasi na ngai Ngai pe nakobila Yesu Eyano Nkolo asungi nga kati na minioko (Oh, oh Masiya) Nkolo apesi nga kimia na motema (Kimia, oh apesi nini oh) Nkolo apesi nga bomoyi na seko (Bomoyi, oh) Tala tina (Tala tina) Bamokili bazali kokamwa Bolingo na nga na Masiya Basusu bazali komituna Tina nini nakangama na Yesu Babosani ete azali nzela Oyo ekomemaka na mboka na lola Na yango nakotalela Ye Nkolo tango nionso mpo nabika Na maboko na Ye kobanga esili nazui kimia pe lobiko Po Yesu alingi nga mingi Ngai pe nalingi Masiya Po Yesu amemaki pasi na nga Ngai pe nakobila se Ye Eyano na nga Nkolo asungi nga kati na minioko (Oh, oh Masiya) Nkolo apesi nga kimia na motema (Kimia, oh lisusu nini) Nkolo apesi nga bomoyi na seko (Bomoyi, oh) Tala tina (Tala tina)