Frère yebisa nga pona nini mokili echangé? Frère yebisa nga pona nini mokili ekomi boye oh papa? Ndeko tozalaki kosambela lelo akoma apôtre Bangomba ekoma ebele pona bato ya motindo oyo Balingi kosala makambo nionso na volonté ya bango moko Wapi volonté ya Nzambe? Wapi ebengeli ya Klisto oh papa? Frère yebisa nga pona nini mokili echangé? Frère yebisa nga pona nini mokili ekomi boye oh papa? Wuta kala Molimo Mosantu azalaki na ye kosala Kasi oction ekoma lelo likambo ya kokamua Bateyi mingi bakoma kopengwa likolo se ya oction Wapi epakoleli ya Nzambe? Wapi Molimo Mosantu oh papa? Frère yebisa nga pona nini mokili echangé? Frère yebisa nga pona nini mokili ekomi boye oh papa? Mingi bakoma kobombama na sima ya kombo ya Klisto Kasi misala na bango ezali ya bato ya lofundu Lokuta ekoma vérité na minoko ya baklisto Wapi vérité mokristo? Wapi solo mokristo? Frère yebisa nga pona nini mokili echangé? Frère yebisa nga pona nini mokili ekomi boye oh papa? Kati na bible tokotangaka lingomba ezali ya Klisto Kasi bangomba ebele ekoma likabo ya bateyi Bakristo pe biloko nionso ekoma ba bien privé ya bango moko Wapi lingomba ya Klisto oh? Wapi lingomba mosantu oh papa? Ndeko na nga oh nayoki manso ozali kotuna Kasi kobosana te makambo nionso oyo tozali komona Ekomama na bible ete na mikolo ya suka eh Ebele ya ba faux prophètes bakotonda na mboka eh Bakoluka kozindisa mitema ya ba ndimi mosusu Wana toko mona makambo nionso na mokili eh Bitumba kokabuana ba pasi ekobima na mboka eh Koya na mwana moto solo ekomi pembeni Senzelaka moninga mokolo eyebani te Moto akosa yo te simba kondima na yo makasi eh Senzelaka moninga Senzelaka moninga Senzelaka moninga Senzelaka moninga Senzelaka moninga Senzelaka moninga Senzelaka moninga Senzelaka moninga