Yowani a kawusaki mayi na miso Po amonaki bomoyi Emoniseli ememi ngai lelo na bomoyi Ba zuwaki Yé Mwana na Mpaté Nilingi na Yesu Azalaki mbeka ya lisapo'o ya Bibiliya Banda ko kelama apesamaki Na ba bomi niama Afungolaki mongongo té Azalaki na singa Ya mokano na Nzambe (Awa biso to weli bomoyi Nani ako ndima ko zwa singa Ya kufa na kingo na yé Lokola ntaba ya Mwana na Mpaté?) Bikelamu ya likolo Pé nasé towe'la ka bomoyi Kasi Yesu aponaki ko kufela Sé nga na yo Azalaki ndé Mbeka epayi Na Nzambé Tata Na ko kitisama na Yé Ya Mwana na Mpaté, eehh Na getesemana alongwé té Na mokano na Papa Yango tozwi lobiko (Talela Yesu, mopesi bomoyi) Tala Mwana na Mpaté na Nzambé, eehh Molongoli masumu na mokili Tala Mwana na Mpaté na Nzambé Ndeko yaka mona pé bila Yesu Na lelaki mingi Pasi na ngai ezangaki moto Moto abikisa (Soki Yesu té, mais na suki wapi?) Azuwamaki té na mokili oyo A kokaki ko somba Ko sombela ngai bomoyi, eeh Na makila ma Yesu Na longi kufa, maladie pé bobola Nga na zwi lobiko, oo Kuna ndé na zwi kobika Kuna ndé na zwi lobiko Na talela ekulusu Tika nga na salela Yé Tala Mwana na Mpaté na Nzambé Molongoli masumu na mokili Tala Mwana na Mpaté na Nzambé Ndeko yaka mona pé bila Yesu Na lelaki mingi Pasi na ngai ezangaki moto Moto abikisa ngai, eehh (Soki yo té Papa) Azuwamaki té na mabé Nani Akokaki ko pesa? Kopesa bomoyi ya seko Mais na pola kala na mabelé Na ekuulusu na longi satana, ba démons Yesu! Akokisi nionso Pona ngai, eehh Tala Mwana na Mpaté na Nzambé Molongoli masumu na mokili Tala Mwana na Mpaté na Nzambé Ndeko yaka mona pé bila Yesu Alongi kufa (Yesu) Apesi bomoyi (na nga, eeh) Abimisi nga lelo, nasé ya libulu Maladie na ngai (ah) Ezwi ekulusu (Yesu) Na biki lelo Na salela Yé Yesu (Yesu) Yesu (Yesu) Nazalaki ntaba Ntaba ya bonne année Soki yo té (Yo té mosusu nani?) Nde nga nani? (Nasuki wapi?) Mais na komi nini? (Mais na koma nani ba ndeko na ngai?)